• Lingala

     Lingala

     boyeyi malamu

  •  

    Miango ya Lobiko

     

     

    Lobiko ewuti na Nzambe na nzela na Yesu Masiya, Alingi biso pe alingi ete bato nionso babika, kolandisama elaka na ye.

    Pona kososola yango, ezali na ba lotono mine yakolanda.

     

     

    1. Nzambe alingi bato nionso

     

    Nzambe alingaki mokili mingi apesi muana na ye se moko ya likinda, atina ete oyo nionso akondimela ye akufa te, kasi azua bomoyi ya seko.

    Yowani 3. 16

     

    Pe bolingo yango ezali, te po biso tolingaki Nzambe, kasi Yende alingaki bisoyambo pe Atindaki Muana na ye lokola mbeka kolongola masumu na biso.

    1 Yowani 4. 10

     

    Pe biso, toyebaki bolingo Nzambe Azalaki nango pona biso, pe tondimelaki Ye. Nzambe aza bolingo ; pe oyo ayingeli na bolingo ayingeli na Nzambe, pe Nzambe avandi kati naye.

    1 Yowani 4. 16

     

    Lokola Tata ayokelaka bana na ye mawa, Yahweh azali na mawa na ba oyo babangaka ye. Pamba te ayebi lolenge na nini tokelami, ayebi ete tozali putulu.

    Loyembo 103. 13-14

     

    2. Bato bazali basumuki pe boye bakabuani na Nzambe

     

    Moyengebene azalite, ata moko te.

    Baloma 3. 10

     

    Bokeseni ezali te. Pamba te bato nionso basumuki pe bazangi kembo na Nzambe.

    Baloma 3. 23

     

    Lifuta ya masumu, ezali kufa ; kasi likabo ya ofele ya Nzambe, ezali bomoyi ya seko na Yesu Masiya.

    Baloma 6. 23

     

    3. Kasi Nzambe alakaki Mobikisi moko, oyo akomema masumu na biso. Ezali Yesu Masiya, oyo aniokuamaki pe akufaki pona masumu na biso pe asekuaki sima mikolo misato.

     

    Nazali Mobateli mpate malamu. Mobateli mpate akopesa bomoyi na ye pona ba mpate na ye.

    Yowani 10. 11

     

    Ye oyo amemaki masumu na biso na ekulusu, natina ete tokufa kolandisama masumi pe tobika pona boyengebeni ; Na mapipi na ye nde tobikisami.

    1 Petelo 2. 24

     

    Na ye tosikolami na makila na ye, bolimbisi masumu, kolandisama ngolu na ye."

    Baefeso 1. 7

     

    Kasi azokisamaki pona masumu na biso, abukamaki pona mabe na biso ; etumu oyo epesi biso kimia ekueyi likolo na ye, pe na mapipi na ye nde tobikisami. Tozalaki koyenga yenga lokola ba mpate, moko na moko azalaki kolanda nzela na ye ; pe Yahweh abeti ye pona mabe na biso nionso.

    Isaya 53. 5-6

     

    4. Klysto apesaki makila na ye pona bolimbisi ya masumu na biso. Esengeli tondimela ye pe toyamba ye lokola Mobikisi po tobika.

     

    Bo bonguana pe bobongola lolenge na bino ya kotambola, po ete masumu na bino elimbisama.

    Misala (ya ba ntoma) 3. 19

     

    Yesu ayebisi ye : Nazali nzela, solo, pe bomoyi. Moko te akokoma na Tata soki aleki na ngai te.

    Yowani 14. 6

     

    Nazali nzete, bino bozali bitapi. Oyo ako yingela kati na nga pe nga kati naye akobota mbuma, pambate soki na nga te bokokoka kosala eloko te.

    Yowani 15. 5

     

    Oyo andimeli muana azana bomoyi ya seko ; oyo andimeli ye te akomona boyi te, kasi kanda na Nzambe ezali likolo na ye.

    Yowani 3. 36

     

    Kasi na baoyo nionso bayambi ye, baoyo bandimeli kombo na ye, apesi bango bokonzi (makoki) yakokoma bana na Nzambe.

    Yowani 1. 12

     

    Na mokuse, tozali banso basumuki, tokabuani na Nzambe. Kasi Nzambe alingi biso mingi pe alingi tozala na kimia na ye. Atindeli biso Mosikoli, Yesu Masiya, ye nde amemi masumu na biso pona kokomisa biso bana na Nzambe.

    Atandeli biso loboko naye pona kobikisa biso, Okosimba yango ?

     

    Tala, natelemi liboso na ekuke, pe naza kobeta. Soki moto ayoki mongongo na nga pe afungoleli nga, nakokota epayi na ye, nakoliya elongo na ye, pe ye elongo na nga.

    Emoniselo 3. 20

     

    Oyo azali na matoyi, ayoka.

    Emoniseli 13. 9

     

     

    Partager via Gmail Yahoo! Blogmarks




    Suivre le flux RSS des articles de cette rubrique